Fièvre jaune

Fièvre jaune, kala na lokota ya Angele eyebanaka bo yellow jack, yellow plague,[1] to bronze john,[2] eza bokono ya makasi kouta na virus .[3] Na ba cas mingi, bilembo bizalak fièvre, kolenga, kozanga mposa ya kolia, nausé, mpasi ya misunyi ya nzoto mingi mpeza na mokongo, mpe moto mpasi.[3] Mingi mingi bilembo bibandaka kosila nakati ya mikolo mitano.[3] Epayi batu misusu nakati ya mokolo ya boyoki mua malamu, fièvre ezongakaka, babandaka koyoka mpasi na se libumu, mpe mikakatano ya foie ebandaka kobongola loposo ya nzoto kokoma loposo ya jaune.[3] Soki esalemi, risque ya kotangisa makila mpe mikakatano ya ba rein mpe emataka.[3]

Bokono oyo ewutaka na virus ya fièvre jaune mpe ekabolamaka na ngungi ya mwasi ntango akosuwa.[3] Epesaka bokono obe na batu, ba makaku misusu, mpe lolenge misusu ya ngungi.[3] Na bingumba, ekabolamaka mingi mpeza na ba ngungi ya lolenge ya Aedes aegypti.[3] Virus oyo eza virus RNA virus ya lolenge ya Flavivirus.[4] Eza mpasi kokesanisa bokono oyo na ba maladi misusu, mingi mingi na ebandeli nayango.[3] Mpo na koconfirmer soki mutu azwami nayango, esengelaka kosala examen ya makila na préaction na mulongo ya polymérase.[5]

Mangwele ya malamu mpe ya makasi mpo na fièvre jaune ezali mpe ba mboka misusu esengaka na bakeyi mibembo bakata mangwele oyo.[3] Nzela mosusu mpo na komibatela eza kokitisa motango ya ba ngungi oyo bakabolaka bokono oyo.[3] Na bisika biye fièvre jaune ezwi batu ebele mpe mangwele ezali, bokundoli liboso na ntango baye baza nayango mpe kopesa mangwele na batu ebele ezalaka ya litomba mpo na komibatela na ba épidemie.[3] Ntango mutu asili kozwama nayango, lisalisi lizalaka mpo na bilembo mpe lizalaka te na mikano miye misembolami mpeza mpo na kobundisa virus.[3] Epayi ya baye baza na bokono makasi, liwa ememaka pene na ndambu ya batu oyo bazali kozwa triatement.[3]

Fièvre jaune ememaka infection na batu 200,000 mpe koboma batu 30,000 mobu na mobu,[3] mpe pene ya 90% ya makambo oyo esalemaka na Afrika.[5] Pene na milliard moko ya batu bafuandaka na bisika biye bokono oyo ezwaka batu mingi na mokili.[3] Ezwaka batu mingi na ba région tropicale Amerika ya Se na Afrika, kasi na Asia te.[3][6] Uta mobu ya 1980, motango ya baye bazwami na fièvre jaune ezali kaka komata.[3][7] Endimami ete eza mpo batu moke mpeza nde bakokata mangwele, mpe batu mingi mpeza bakomi kofuandaka nakati na bingumba, mpe batu kobongolaka bisika bafuandaka mbala na mbala, na mpe lisusu mbongwana ya climat.[3] Bokono oyo ebandaki na Afrika, mpe ekendeki na Amerika ya Se na nzela ya kotekisa baumbu na siècle ya 17.[1] Uta siècle 17, épidemies minene minene ya bokono oyo esalemaki na ba Amerika, Afrika, mpe na Eropa.[1] Na siècle ya 18 mpe 19, fièvre jaune ezalaki kotalema bo moko ya ba maladi oyo epesamaka ya mabe mpeza.[1] Na mobu ya 1927 kati na ba virus oyo ezwaka batu, virus ya fièvre jaune ekomaki virus ya yambo kotiyama pembeni.[4][8]

  • references

References

  1. 1,0 1,1 1,2 et 1,3 (en) Michael Oldstone, Viruses, Plagues, and History: Past, Present and Future, Oxford University Press,‎ 2009, 102–4 p. ( ISBN lire en ligne)
  2. (en) Hervé Bazin, Vaccination : a history from Lady Montagu to genetic engineering, Montrouge, J. Libbey Eurotext,‎ 2011 ( ISBN lire en ligne), p. 407
  3. 3,00 3,01 3,02 3,03 3,04 3,05 3,06 3,07 3,08 3,09 3,10 3,11 3,12 3,13 3,14 3,15 3,16 3,17 et 3,18 "Yellow fever Fact sheet N°100". World Health Organization. May 2013. http://www.who.int/mediacentre/factsheets/fs100/en/. Retrieved 23 February 2014. 
  4. 4,0 et 4,1 (en) Lindenbach, B. D., Fields Virology, Philadelphia, PA, 5th,‎ ( ISBN 0-7817606-0-7), « Flaviviridae: The Viruses and Their Replication », p. 1101
  5. 5,0 et 5,1 Tolle MA (April 2009). "Mosquito-borne diseases". Curr Probl Pediatr Adolesc Health Care 39 (4): 97–140. 10.1016/j.cppeds.2009.01.001. 19327647. 
  6. "CDC Yellow Fever". http://www.cdc.gov/yellowfever/. Retrieved 2012-12-12. 
  7. Barrett AD, Higgs S (2007). "Yellow fever: a disease that has yet to be conquered". Annu. Rev. Entomol. 52: 209–29. 10.1146/annurev.ento.52.110405.091454. 16913829. 
  8. (en) Jeffrey Sfakianosmpé Alan Hecht ; consulting editor, Hilary Babcock ; foreword by David Heymann, West Nile virus, New York, 2nd,‎ 2009 ( ISBN lire en ligne), p. 17
Other Languages
Afrikaans: Geelkoors
العربية: حمى صفراء
asturianu: Fiebre mariello
azərbaycanca: Sarı qızdırma
беларуская: Жоўтая ліхаманка
български: Жълта треска
বাংলা: পীতজ্বর
bosanski: Žuta groznica
català: Febre groga
čeština: Žlutá zimnice
dansk: Gul feber
Deutsch: Gelbfieber
Thuɔŋjäŋ: Juanmaketh
ދިވެހިބަސް: ރީނދޫ ހުން
English: Yellow fever
Esperanto: Flava febro
español: Fiebre amarilla
euskara: Sukar hori
فارسی: تب زرد
suomi: Keltakuume
français: Fièvre jaune
Gaeilge: Fiabhras buí
हिन्दी: पीतज्वर
hrvatski: Žuta groznica
Kreyòl ayisyen: Lafyèv jòn
magyar: Sárgaláz
հայերեն: Դեղին տենդ
Bahasa Indonesia: Demam kuning
italiano: Febbre gialla
日本語: 黄熱
ಕನ್ನಡ: ಕಾಮಾಲೆ
한국어: 황열
Luganda: Enkaka
македонски: Жолта треска
മലയാളം: മഞ്ഞപ്പനി
Bahasa Melayu: Demam kuning dewasa
Nederlands: Gele koorts
norsk: Gulfeber
ଓଡ଼ିଆ: ପୀତ ଜ୍ୱର
português: Febre amarela
Runa Simi: Fiebre amarilla
română: Febră galbenă
srpskohrvatski / српскохрватски: Žuta groznica
Simple English: Yellow fever
slovenščina: Rumena mrzlica
српски / srpski: Žuta groznica
svenska: Gula febern
Kiswahili: Homa ya manjano
ትግርኛ: ብጫ ረስኒ
Türkçe: Sarıhumma
українська: Жовта гарячка
اردو: زرد بخار
Tiếng Việt: Sốt vàng
中文: 黄热病
粵語: 黃熱病